Pular para o conteúdo
Publicidade

Ezequiel 9

4 Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo»

5 Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu : « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te ! 6 Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule »

Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo.

Veja também