3 Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu : 4 « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. 5 Bakobenga yo lisusu Abrami te ; kombo na yo ekokoma Abrayami17.5 Abrayami elakisi : tata ya mabota ebele., pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele. 6 Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo. 7 Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo. 8 Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
9 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima. 10 Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga. 11 Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai.