Pular para o conteúdo
Publicidade

Ebandeli 26

Izaki mpe Abimeleki

1 Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia. 2 Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye :

Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. 3 Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo. 4 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola. 5 Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.

6 Boye, Izaki avandaki na Gerari.

7 Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki :

Azali ndeko na ngai ya mwasi.

Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko. 8 Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka.

Veja também