Publicidade

Gênesis 8

6 Sima na mikolo tuku minei, Noa afungolaki lininisa ya masuwa oyo asalaki 7 mpe abimisaki yanganga. Yanganga yango ezalaki kokende mpe kozonga kino tango mayi ekawukaki na mokili. 8 Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili. 9 Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa. 10 Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa. 11 Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili. 12 Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-