Publicidade

Hebreus 10

Motuya ya mbeka ya Klisto

1 Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te ; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu. 2 Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.

3 Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango, 4 pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-