2 Yawe ayanolaki :
— Koma emoniseli oyo,
koma yango na etando ya mabanga,
koma yango penza malamu
mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.
3 Emoniseli oyo ezali kaka kozela
tango na yango oyo ekatama ;
ezali kolobela makambo oyo ekosalema
na tango ya suka ;
solo, ekokosa te.
Ata ewumeli, zela yango kaka ;
solo, ekokokisama, ekowumela te.