Liloba na Nzambe mpe Motatoli na yango
1 Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe. 2 Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe. 3 Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te.