Kufa ya Lazare
1 Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte. 2 Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.
3 Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :
— Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
4 Tango Yesu ayokaki yango, alobaki :
— Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
5 Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare. 6 Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. 7 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
8 Bayekoli balobaki na Ye :
— Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?
9 Yesu azongisaki :
— Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo. 10 Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
11 Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu :
— Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.
12 Bayekoli balobaki na Yesu :
— Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !
13 Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka. 14 Bongo Yesu alobaki na bango na polele :
— Lazare akufi. 15 Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.
16 Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa, » alobaki na bayekoli mosusu :
— Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !
17 Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei. 18 Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato, 19 Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.
Lisekwa mpe bomoi
20 Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.
21 Marte alobaki na Yesu :
— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! 22 Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.
23 Yesu alobaki na ye :
— Ndeko na yo akosekwa.
24 Marte azongiselaki Yesu :
— Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.
25 Yesu alobaki na ye :
— Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. 26 Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?
27 Marte azongisaki :
— Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.
28 Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza :
— Moteyi ayei, azali kobenga yo.
29 Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu. 30 Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye. 31 Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.
32 Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !
33 Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki. 34 Atunaki bango :
— Bokundaki ye wapi ?
Bazongisaki :
— Nkolo, yaka kotala.
35 Yesu alelaki.
36 Bongo Bayuda balobaki :
— Tala ndenge nini alingaki ye !
37 Kasi bamosusu kati na bango balobaki :
— Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?
Yesu asekwisi Lazare
38 Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.
39 Yesu alobaki na bango :
— Botindika libanga.
Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu :
— Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.
40 Yesu alobaki na ye :
— Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?
41 Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai. 42 Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »
43 Sima na Yesu koloba bongo, agangaki :
— Lazare, bima !
44 Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba.
Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana :
— Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.