Yesu akoti na Yelusalemi
12 Mokolo oyo elandaki, ebele ya bato oyo bayaki na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika bayokaki sango ete Yesu mpe azali kokende kuna na Yelusalemi. 13 Bakataki mandalala mpe babimaki mpo na kokende koyamba Yesu ; bazalaki koganga :
« Ozana !
Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo,
Mokonzi ya Isalaele ! »