Yesu abimeli Toma
24 Toma, moko kati na bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka Lipasa, azalaki te elongo na bayekoli tango Yesu ayaki. 25 Bayekoli mosusu balobaki na ye :
— Towuti komona Nkolo !
Kasi Toma azongiselaki bango :
— Soki ngai namoni te bilembo ya basete na maboko na Ye, soki natie mosapi na ngai te kati na bisika oyo basete etobolaki Ye, mpe soki natie te loboko na ngai kati na mopanzi na Ye, nakotikala kondima te.
26 Sima na mikolo mwambe, bayekoli ya Yesu basanganaki lisusu kati na ndako. Na mbala oyo, Toma mpe azalaki elongo na bango, mpe bikuke ezalaki ya kokangama. Yesu ayaki, atelemaki kati na bango mpe alobaki :
— Tika ete kimia ezala na bino !
27 Bongo, alobaki na Toma :
— Tia mosapi na yo awa, tala maboko na Ngai ; sembola loboko na yo mpe tia yango na mopanzi na Ngai. Kozala te moto oyo azangi kondima, kasi moto na kondima !
28 Toma azongiselaki Yesu :
— Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !
29 Yesu alobaki na ye :
— Ondimi mpo ete omoni Ngai ! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi !