Pular para o conteúdo
Publicidade

João 21

Yesu mpe Petelo

15 Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo :

Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai ?

Azongisaki :

Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka Yo.

Yesu alobaki na ye :

Batela bampate na Ngai.

16 Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale :

Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?

Azongisaki :

Iyo, Nkolo ! Oyebi malamu ete nalingaka yo !

Yesu alobaki na ye :

Batela bampate na Ngai.

17 Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato :

Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ?

Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai » Bongo azongiselaki Yesu :

Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo !

Yesu alobaki na ye :

Batela bameme na Ngai.

Veja também