Pular para o conteúdo
Publicidade

Yoane 3

3 Yesu azongiselaki ye :

Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.

4 Nikodemi atunaki Ye :

Ndenge nini moto oyo akomi mobange akoki kobotama lisusu ? Akoki solo kozonga na libumu ya mama na ye mpo ete abotama lisusu ?

5 Yesu azongiselaki ye :

Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki kokota na Bokonzi ya Nzambe soki abotami te na mayi mpe na Molimo. 6 Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo. 7 Kokamwa te ndenge nalobi na yo : « Osengeli kobotama mbotama ya sika » 8 Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também