Lisese ya moto malamu ya mboka Samari
25 Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu :
— Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
26 Yesu alobaki na ye :
— Makambo nini ekomama kati na mobeko ? Otangaka yango ndenge nini ?
27 Molakisi ya mibeko azongisaki :
— Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
28 Yesu alobaki na ye :
— Opesi eyano ya malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.