Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 14

Yesu abikisi lisusu na mokolo ya Saba

1 Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu. 2 Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto. 3 Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko :

Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?

4 Kasi bavandaki kimia.

Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.

Veja também