Lolenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya
20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu :
— Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ?
Yesu azongiselaki bango :
— Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango. 21 Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.