Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 19

Zashe azwi lobiko

1 Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango. 2 Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe» Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ; 3 azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza. 4 Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.

5 Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye :

Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.

6 Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.

7 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba :

Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu !

8 Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye :

Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.

9 Yesu alobaki na ye :

Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami. 10 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também