37 Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ; 38 bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »
Publicidade