Publicidade

Jó 7

1 Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka

bomoi ya pasi te ?

Mikolo ya bomoi na ye ezali penza

mikolo ya mongamba te ?

2 Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa

to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye,

3 ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba

mpe babutu ya pasi na pasi.

4 Soki kaka nalali, nakomi komituna :

‹ Tango nini nakolamuka ? ›

Mpe soki kaka nalamuki :

‹ Tango nini butu ekoya ? ›

Nalembi komitungisa tango nyonso.

5 Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai,

poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota

mpe ekomi kolumba solo.

6 Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza

koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ;

nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili.

7 Oh Nkolo, kobosana te

ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba !

Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te.

8 Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo

ekotikala komona ngai lisusu te ;

okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.

9 Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka,

ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi

azongaka lisusu te.

10 Akozonga lisusu te na ndako na ye,

mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te.

11 Yango wana, nakokanga monoko na ngai te,

molimo na ngai ekoloba kaka na mawa,

mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai.

12 Boni, nakomi ebale to elima ya mayi

mpo ete batiela ngai bikangiseli ?

13 Nakanisaka ete soki nalali,

mbeto na ngai ekobondisa ngai

mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ;

14 nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe

mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo.

15 Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa,

pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo.

16 Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi !

Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina.

17 Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye,

mpo ete olandelaka ye na bokebi,

18 mpo ete otalaka ye tango nyonso

mpe omekaka ye tango nyonso ?

19 Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ?

Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te

ata mpo na ngonga moke ?

20 Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu,

eloko nini ngai nasali Yo ?

Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ?

Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?

21 Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te

mpe ozali kobosana masumu na ngai te ?

Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ;

okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-18_14-04-22-