Publicidade

Jó 17

1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila,

mikolo na ngai etikali ya kotanga,

kunda ezali kozela ngai.

2 Solo, batioli bazingeli ngai,

miso na ngai ezali komona kotiola na bango.

3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga,

na esika na ngai, epai na Yo ;

soki te, nani mosusu akoki komipesa

lokola ndanga mpo na ngai !

4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ;

yango wana, okolongisa bango te.

5 Moto oyo akofunda balingami na ye

mpo ete babotola bomengo na bango na makasi,

bana na ye bakokufa miso.

6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato,

lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.

7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi,

mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.

8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango,

mpe moto oyo ayebi na ye likambo te

atelemeli moto mabe.

9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango,

mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.

10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu !

Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.

11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ;

mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai,

nyonso, esili kobeba.

12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi

bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, ›

nzokande molili ezali makasi.

13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya,

ezali nde kunda ;

soki mpe nakotandaka mbeto na ngai,

ezali nde kati na mboka ya bakufi.

14 Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, ›

mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai

to ndeko na ngai ya mwasi, ›

15 wana elikya na ngai ezali penza wapi,

mpe nani penza azali komona elikya na ngai ?

16 Ekokita kino na bikuke ya kufa

tango tokokende elongo kopema kati na putulu. »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-19_11-20-24-