Publicidade

Jó 25

Maloba ya misato ya Bilidadi

1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki :

2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;

atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ?

Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ?

4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ?

Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?

5 Soki kutu sanza ezali kongenga te,

mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye,

6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi,

mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! »

Veja também

Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-19_11-20-24-