Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 8

Yesu aleki mopepe na makasi

22 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.

Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. 23 Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. 24 Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga :

Moteyi, Moteyi, tozali kokufa !

Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. 25 Yesu atunaki bayekoli na Ye :

Wapi kondima na bino ?

Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye »

Veja também