Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 9

Yesu atindi bayekoli na Ye zomi na mibale

1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ; 2 mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli. 3 Alobaki na bango :

Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto. 4 Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba. 5 Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.

6 Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.

Veja também