Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 11

Nguya ya kondima

20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa.

21 Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu :

Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki !

22 Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

Bozala na kondima kati na Nzambe. 23 Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama. 24 Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.

25 Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [

Veja também