Publicidade

Amós 3

Makebisi mpe pamela

1 Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :

2 « Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona

kati na bituka nyonso ya mabele ;

yango wana nakopesa bino etumbu

mpo na mabe nyonso oyo bosali.

3 Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko

soki bayokani te ?

4 Nkosi ekoki solo koganga na zamba

soki emoni te nyama ya kolia ?

Mwana nkosi ekoki penza konguluma

na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?

5 Ndeke ekoki solo kokangama na motambo

oyo ezali na mabele

soki ezangi eloko ya kolia ?

Motambo ekoki solo koningana

soki ekangi eloko te ?

6 Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba,

bongo bato bazanga kobanga ?

Pasi ekoki solo koya na engumba

soki Yawe atindi yango te ?

7 Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te

soki alakisi mabongisi na Ye te

epai ya basali na Ye, basakoli.

8 Nkosi egangi ;

nani akobanga te ?

Nkolo Yawe alobi ;

nani akoki koboya kosakola ?

9 Bosakola makambo oyo

kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito :

‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari

mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko

ezali kosalema kati na yango !

10 Bato na Ngai bayebi lisusu te

kosala makambo na bosembo, ›

elobi Yawe,

‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba

mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »

11 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :

« Monguna moko akozingela yo,

akosukisa yo mpe akobotola na makasi

biloko kati na bandako na yo,

oyo batonga makasi. »

12 Tala liloba oyo Yawe alobi :

« Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi

makolo mibale to songe ya litoyi ya meme,

ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama,

ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge

mpe na basuka ya bambeto na bango. »

13 « Boyoka makambo oyo

mpe bokebisa ndako ya Jakobi, »

elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.

14 « Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu

mpo na masumu na ye,

nakobebisa bitumbelo ya Beteli,

nakobuka maseke ya bitumbelo,

mpe ekokweya na mabele.

15 Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi

mpe ya tango ya molunge makasi ;

mpe bandako oyo batonga kitoko

na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, »

elobi Yawe.

Veja também

Publicidade
Amós
Ver todos os capítulos de Amós
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-15_21-32-39-