Publicidade

Amós 9

Kobebisama ya Esika ya bule

1 Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki :

« Buka makonzi ya Tempelo

mpo ete ndako mobimba eningana

mpe ekweyela bato nyonso na mito.

Bato oyo bakotikala,

nakoboma bango na mopanga.

Moko te akokima, moko te akobika.

2 Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi,

loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ;

soki bakimi na Lola,

nakokitisa bango na se.

3 Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli,

nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ;

soki babombami Ngai na se ya ebale monene,

nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.

4 Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu,

nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna.

Miso na Ngai ekozala likolo na bango

mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.

5 Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele,

mabele eninganaka,

mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga,

mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili

mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.

6 Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola

mpe atia miboko na yango na mabele ;

abengaka mayi ya ebale monene

mpe asopaka yango na etando ya mabele.

Kombo na Ye ezali : Yawe.

Etumbu ya bato nyonso ya masumu

7 Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te

na bato ya mokili ya Kushi ? »

elobi Yawe.

« Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito,

bato ya Filisitia wuta na Kreti,

bato ya Siri wuta na Kiri ?

8 Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ;

nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele.

Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, »

elobi Yawe.

9 « Pamba te nakopesa mitindo

mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso

ndenge bayungolaka ble ;

bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.

10 Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai

bakokufa na mopanga,

ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te

kozwa to kokomela biso ! ›

Tango ya lobiko

11 Na mokolo wana,

nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya,

nakobamba madusu na yango,

nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana

mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,

12 mpo ete bakoka kozwa

ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki,

mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, »

elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.

13 « Mikolo ezali koya, »

elobi Yawe,

« mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki,

mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki.

Vino ya sika ekobota na bangomba milayi

mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.

14 Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai,

oyo bakendeki na bowumbu,

mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki

mpe bakovanda kati na yango.

Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango,

bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.

15 Nakolona bango na mabele na bango moko,

mpe bakotikala kopikola bango lisusu te

na mabele oyo napesaki bango, »

elobi Yawe, Nzambe na yo.

Veja também

Publicidade
Amós
Ver todos os capítulos de Amós
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-16_18-40-07-