Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 2

3 Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli. 4 Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango. 5 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono :

Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.

6 Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema : 7 « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te »

8 Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango :

Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ? 9 Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola » 10 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.

Bongo alobaki na ebosono :

11 Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.

12 Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te »

Veja também