22 Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki :
— Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
23 Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese :
— Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ? 24 Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te. 25 Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ; 26 mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani. 27 Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako. 28 Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ; 29 kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.
30 Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! »