Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 3

Libota ya solo ya Yesu

31 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu. 32 Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye :

Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo.

Yesu azongisaki :

33 Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?

34 Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki :

Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai ! 35 Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

Veja também