Pular para o conteúdo
Publicidade

Malako 7

9 Alobaki na bango lisusu :

Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino. 10 Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa»

11 Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe» 12 akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo. 13 Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.

Veja também