10 epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu :
— Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ?
Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye. 11 Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ? 12 Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.
13 Bongo, alobaki na moto yango :
— Sembola loboko na yo.
Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.