Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 19

Yesu ayambi bana mike

13 Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango. 14 Yesu alobaki :

Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.

15 Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.

Veja também