Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 19

23 Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo ! 24 Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.

25 Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana :

Bongo nani penza akoki kobikisama ?

26 Wana Yesu atalaki bango, alobaki :

Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !

Veja também