Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 21

Yesu alakeli nzete ya figi mabe

18 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. 19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango :

Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela.

Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. 20 Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki :

Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ?

21 Yesu azongiselaki bango :

Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale» yango ekosalema solo. 22 Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.

Veja também