Yuda amidiembiki
3 Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato. 4 Alobaki na bango :
— Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te !
Kasi bango bazongisaki :
— Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !
5 Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.