Pular para o conteúdo
Publicidade

Matayo 9

Yesu abikisi bakufi miso mibale

27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :

Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !

28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango :

Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ?

Bazongisaki :

Iyo, Nkolo !

29 Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :

Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !

30 Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango :

Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.

31 Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também