Pular para o conteúdo
Publicidade

Neemias 5

14 Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli. 15 Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei.

Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe. 16 Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo ; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele. 17 Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga. 18 Mikolo nyonso, bazalaki kolambela ngai ngombe moko ya mobali, meme motoba ya malamu mpe basoso ; mpe sima na mikolo zomi nyonso, bazalaki koya kotikela ngai vino ebele. Atako bongo, natikalaki kosenga eloko moko te kati na biloko oyo esengeli mpo na moyangeli, pamba te mokumba ya misala ezalaki makasi na mito ya bato.

19 Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo mpo na nyonso oyo nasili kosala mpo na bato oyo !

Veja também