Bwanya : bomengo oyo ebombama
1 Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai
mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai ;
2 soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya
mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele ;
3 soki obeleli mayele
mpe ogangi epai ya bososoli ;
4 soki oluki yango penza ndenge balukaka palata
to bomengo oyo ebombama,
5 okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini
mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
6 Pamba te Yawe nde apesaka bwanya,
mpe maloba ya monoko na Ye epesaka
mayele mpe bososoli.