19 Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya,
batela motema na yo kati na nzela ya sembo.
20 Kozala esika moko te na balangwi masanga
to na bato ya lokoso,
21 pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola,
mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.
22 Yokela tata oyo aboti yo,
mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.