Masese mpo na mwasi ya lokumu
10 Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?
Azali na motuya koleka babiju ya talo.
13 alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino,
bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.
14 Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo,
akendaka koluka bilei na ye mosika ;
15 alamukaka wana butu ezali nanu,
abongisaka bilei mpo na ndako na ye
mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.
16 Soki asepeli na elanga, asombaka yango ;
mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.
17 Akangaka loketo na ye makasi
mpe akembisaka maboko na ye na mosala.
18 Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ;
mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.
20 Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola,
mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.
24 Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango,
asalaka mombongo ya mikaba.