Pular para o conteúdo
Publicidade

Provérbios 31

Masese mpo na mwasi ya lokumu

10 Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

11 Mobali na ye atielaka ye motema

mpe azangaka te biloko ya motuya.

12 Tango nyonso ya bomoi na ye,

apesaka mobali na ye esengo, kasi mawa te ;

13 alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino,

bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.

14 Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo,

akendaka koluka bilei na ye mosika ;

15 alamukaka wana butu ezali nanu,

abongisaka bilei mpo na ndako na ye

mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.

16 Soki asepeli na elanga, asombaka yango ;

mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.

17 Akangaka loketo na ye makasi

mpe akembisaka maboko na ye na mosala.

18 Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ;

mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.

19 Maboko na ye esimbaka mitonga oyo batongelaka,

mpe misapi na ye etongaka bilamba.

20 Afungolaka loboko na ye mpo na kokabela babola,

mpe asembolaka yango mpo na kosunga bato bakelela.

Veja também