Pular para o conteúdo
Publicidade

Masese 31:13-16,18,24

13 alukaka bapwale ya meme mpe basinga ya lino,

bongo maboko na ye etongaka yango na esengo.

14 Azali lokola masuwa ya bato ya mombongo,

akendaka koluka bilei na ye mosika ;

15 alamukaka wana butu ezali nanu,

abongisaka bilei mpo na ndako na ye

mpe akabolelaka basali na ye ya basi misala.

16 Soki asepeli na elanga, asombaka yango ;

mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.

18 Amonaka ete mombongo na ye etambolaka malamu ;

mpe kino na butu, mwinda na ye ekokufa te.

24 Asalaka bilamba ya lino mpe atekaka yango,

asalaka mombongo ya mikaba.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.