Mwasi ya bolenge na yo
15 Melaka mayi ya libulu na yo moko,
oyo ezali kobima penza na libulu na yo.
16 Boni, bitima na yo esopa penza mayi na libanda
to miluka na yo esopa penza mayi na balabala ?
17 Tika ete ezala kaka mpo na yo moko,
kasi kokabola yango te na bapaya.
18 Tika ete etima na yo epambolama,
mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
19 oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,
lokola mboloko ya mafuta.
Tika ete tango nyonso,
mabele na ye etondisaka yo na esengo,
mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
20 Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela
kolinga mwasi ya ndumba ?
Mpo na nini kosepela kosakana
na mabele ya mwasi mosusu ?