3 Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka
mafuta ya nzoyi,
mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;
4 kasi na suka na nyonso,
azali bololo lokola masanga ya bololo,
songe lokola mopanga ya minu mibale.
5 Makolo na ye ekokita kino na kufa,
ekokende kino na mokili ya bakufi.
6 Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,
alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
7 Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai,
kopesa maloba na ngai mokongo te ;
8 longola nzela na yo pembeni na ye
mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
9 noki te akoya kokaba lokumu na yo
epai ya bato mosusu,
mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;