Bilaka ya somo
1 Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo,
soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya,
2 omikangi nde singa na maloba na yo,
omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
3 Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo
mpo ete omikangola,
pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ;
kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye,
4 kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ;
5 mikangola na motambo lokola mboloko na maboko
ya mobomi banyama ya zamba,
mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.