Publicidade

Provérbios 6

Moto ya goyigoyi

6 Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi,

tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !

7 Yango ezalaka na mokambi te,

mokengeli te to mokonzi te ;

8 ebongisaka bilei na yango na tango ya moyi makasi,

ebombaka yango na tango ya kobuka mbuma.

9 Yo moto ya goyigoyi, okolala pongi kino tango nini ?

Kino tango nini okolamuka na pongi na yo ?

10 Mwa pongi moke, mwa kopema moke,

mwa kokanga maboko moke mpo na kolala

11 mpe bobola ekoyela yo na pwasa lokola moleki nzela,

mpe pasi ekoyela yo lokola moyibi.

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-