19 Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo. 20 Nzokande,
« Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ;
soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi.
Pamba te, soki osali bongo,
okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
21 Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.