16 Likabo ya Nzambe ezali na motuya makasi koleka mabe ya lisumu ya moto moko : likolo ya lisumu moko, kosambisama eyei mpe ememi etumbu ; kasi likolo ya masumu ebele, likabo ya ngolu eyei mpe elongoli etumbu. 17 Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko !