Libondeli ya kondima
5 Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. 6 Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. 7 Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo : 8 azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.