Pular para o conteúdo
Publicidade

Adoração

Por Bíblia Online

A adoração é a resposta do coração humano à majestade de Deus. Deus é Espírito e importa que os que o adoram o adorem em espírito e em verdade — com todo o ser.

Adorar em espírito

Deus é Espírito e importa que os adoradores o adorem em espírito e em verdade. A adoração verdadeira brota do coração.

Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.

Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana. Nzambe azali Molimo ; esengeli ete bato oyo bagumbamelaka Ye bagumbamela Ye kati na Molimo mpe kati na solo.

Yesu azongiselaki ye :

Mwasi, ndima Ngai : tango ezali koya, tango oyo bakogumbamela lisusu Tata te na likolo ya ngomba oyo to kati na Yelusalemi. Bino, bato ya Samari, bogumbamelaka nzambe oyo boyebi te ; kasi biso, togumbamelaka Nzambe oyo toyebi, pamba te lobiko ewuti epai ya Bayuda. Kasi tango ezali koya mpe esili na yango kokoka, tango oyo bagumbameli ya solo bokogumbamela Tata, kati na Molimo mpe kati na solo ; pamba te Tata alukaka bato oyo bogumbamelaka Ye na lolenge wana.

Moto yango azongisaki :

Nkolo, nandimi.

Mpe agumbamelaki Ye.

Yesu alobaki na ye :

Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama :

« Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo,

mpe okosambelaka kaka Ye»

Yesu azongiselaki ye :

Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye»

Komikaba epai ya Nzambe

Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.

Komikaba epai ya Nzambe

Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli. Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye,

na nzela na Ye mpe mpo na Ye.

Tika ete nkembo ezonga epai na Ye

mpo na libela na libela ! Amen !

Pamba te ekomama :

« Na Kombo na Ngai» elobi Nkolo,

« mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai,

mpe minoko nyonso ekotatola Nzambe»

Louvor e reverência

Vinde, adoremos e prostremo-nos. Louvai ao Senhor! Todo ser que respira louve o nome glorioso do Senhor.

Boya, togumbama mpe tofukama,

tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe,

Mokeli na biso !

Boya, togumbama mpe tofukama,

tobuka mabolongo na biso liboso ya Yawe,

Mokeli na biso !

Bokumisa Yawe na mindule

Bokumisa Yawe !

Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule,

bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene

epai wapi avandi na nguya makasi !

Bokumisa Ye mpo na misala minene na Ye !

Bokumisa Ye mpo na monene na Ye ya somo !

Bokumisa Ye na lokito ya kelelo ;

bokumisa Ye na lokito ya nzenze mpe ya lindanda !

Bokumisa Ye na lokito ya bambunda mpe na mabina !

Bokumisa Ye na mandanda mpe na baflite !

Bokumisa Ye na lokito ya manzanza !

Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !

Bokumisa Yawe !

Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !

Bokumisa Yawe !

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,

bokota na lopango na Ye na kokumisa.

Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na lokumu ya Kombo na Ye ;

bogumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na Ye.

Lokumu na Nzambe oyo akangoli biso

Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo.

Bino bato ya mokili mobimba,

bobetela Nzambe maboko !

Boyemba banzembo ya lokumu

mpo na nkembo ya Kombo na Ye,

bopesa lokumu na Ye nkembo.

Boloba na Nzambe :

« Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango !

Mpo na nguya monene na Yo,

banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.

Mokili mobimba efukamaka liboso na Yo ;

bayembaka mpo na lokumu na Yo,

basanzolaka Kombo na Yo»

Nabelelaki Ye na monoko na ngai,

mpe lolemo na ngai ekumisaki Ye.

Nkolo, bikolo nyonso oyo osala

ekoya kogumbama liboso na Yo

mpe ekoya kopesa Kombo na Yo nkembo.

Pamba te ozali monene mpe osalaka bikamwa ;

Yo kaka nde ozali Nzambe.

Tika ete bomoi na ngai mobimba ekumisa Yawe

Nzembo ya Davidi.

Eh molimo na ngai, pambola Yawe !

Tika ete motema na ngai mobimba epambola

Kombo na Ye ya bule !

Nzambe azali bolingo

Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye !

Bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo !

Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.

Natalaki Yo kati na Esika ya bule

mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,

bibebu na ngai ekosanzola Yo.

Declarações de adoração

Tu és digno, Senhor, de receber glória e honra! Ao Senhor pertence a grandeza, o poder, a glória e a majestade.

« Nkolo mpe Nzambe na biso,

obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya,

pamba te Yo nde okela biloko nyonso :

ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo»

Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi »

Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo

mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ?

Pamba te Yo kaka nde ozali Bule.

Bikolo nyonso ekoya

mpe ekogumbama liboso na Yo,

pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.

Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye. Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe »

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga,

nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ;

pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo.

Yawe, bokonzi ezali ya Yo,

osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.

Boganga : « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso,

sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu,

mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule

mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo »

Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko !

Bato nyonso balobaki : « Amen » Mpe bakumisaki Yawe !

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko.

Boyemba mpo na lokumu na Ye,

bosanzola Ye na mindule !

Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso !

Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso

mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso,

mpo ete, na Kombo na Yesu,

mabolongo nyonso efukama

kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele,

mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo

mpo na nkembo ya Nzambe Tata.

Sacrifício de louvor

Por meio de Jesus ofereçamos sempre sacrifício de louvor. Cantai ao Senhor, celebrai em salmos — enchei-vos do Espírito.

Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba : mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.

Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga. Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.

bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.

Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.

Matondi epai ya Nzambe

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye.

Adoração como vida

Exaltai ao Senhor, prostrai-vos ante o escabelo dos seus pés. A adoração genuína transforma o adorador e agrada o Criador.

Bonetola Yawe, Nzambe na biso,

mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ;

azali Mosantu.

Tika ete monoko na ngai etonda

na masanzoli mpo na lokumu na Yo ;

tika ete etatolaka tango nyonso

kongenga ya nkembo na Yo.

Liboso ya Nzambe, bato ya sembo basepelaka,

batondaka na esengo.

Boyembela Nzambe, boyemba banzembo

mpo na lokumu ya Kombo na Ye.

Bofungola nzela mpo na Ye

oyo atambolisaka mampinga na Ye kati na esobe.

Kombo na Ye ezali Yawe.

Botonda na esengo liboso na Ye.

Pasi oyo ayokisaka bato ezongelaka ye moko,

mpe mabe na ye ekweyaka na moto na ye moko.

Bikisa ngai wuta na monoko ya nkosi

mpe na maseke ya mpakasa.

Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na ngai,

mpe nakokumisa Yo kati na mayangani.

Nasemboli maboko na ngai epai na Yo ;

nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.

Nzoto na ngai ekomaka kosala pasi makasi

tango bayini na ngai bafingaka ngai,

tango balobaka na ngai mokolo mobimba :

« Wapi Nzambe na yo »

Nalobaka na Yawe : « Ozali Nkolo na ngai,

Yo moko kaka nde ozali bolamu na ngai»

Bosalela Yawe na kobanga

mpe bosepela na kolenga.

Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba,

nakotatola misala minene na Yo nyonso.

Falsa adoração

Não terás outros deuses diante de mim. Não adorarás ídolos. A adoração exclusiva ao Senhor é mandamento inegociável.

Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.

Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.

Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize. Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo.

Yawe azali makasi na ngai,

azali solo loyembo na ngai,

azali mobikisi na ngai,

azali Nzambe na ngai,

nakokumisa Ye ;

azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.

Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ?

Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu,

somo, mpe abongi na lokumu,

mpe asalaka makambo ya kokamwa ?

Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino.

Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.

Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.

Bapesaki Yawe kanda makasi

likolo ya banzambe na bango ya bapaya,

mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo.

Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe

oyo ezali Nzambe te ;

babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te,

banzambe oyo ebimaki sika,

banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te.

Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino

mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi.

Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,

Nkolo alobi :

« Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko,

bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,

kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ;

mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai

ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.

Nzembo mpo na kokumisa Yawe

Yawe, ozali Nzambe na ngai ;

nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ;

pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka,

osalaki mabongisi ya kokamwa,

makambo oyo obongisa wuta kala.

Kasi Nzambe apesaki bango mokongo mpe atikaki bango kosambela mampinga ya likolo, ndenge ekomama kati na buku ya basakoli :

« Oh bato ya Isalaele, boni, bozalaki kobonzela Ngai mbeka

mpe kopesa Ngai makabo

na mibu tuku minei oyo bolekisaki na esobe ?

Bomemaki nde ndako ya kapo ya Moloki

mpe monzoto ya nzambe na bino Rofa,

banzambe ya bikeko oyo bosalaki mpo na kogumbamela !

Yango wana, nakotinda bino na bowumbu,

mosika koleka Babiloni »

Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina, baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.

Tika ete moko te akosa bino ; pamba te liboso ete mokolo yango ekoma, bato basengeli nanu kobwaka kondima, mpe motomboki oyo abongisami mpo na libebi asengeli nanu komonana. Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.

Exemplos de adoração

Jó adorou em meio ao sofrimento. Esdras adorou na restauração. Paulo e Silas adoraram na prisão — e Deus respondeu.

Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki. Alobaki :

« Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai,

mpe nakozonga bolumbu.

Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ;

tika ete Kombo na Ye ekumisama »

Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi :

« Solo, azali malamu,

bolingo na Ye mpo na Isalaele

ewumelaka seko na seko »

Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe.

Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini ! Moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo !

Moko te azali bule lokola Yawe ;

moko te, bobele Yo.

Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.

Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki :

Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko :

« Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.

Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te,

nzete ya vino eboti mbuma te,

nzete ya olive eboti mbuma te,

bilanga ebimisi bilei te,

bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango,

mpe bangombe ezali te kati na lopango.

Kasi ngai nakosepela kati na Yawe

mpe nakotondisama na esengo mingi

kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.

Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino.

Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !

Seja o primeiro