Pular para o conteúdo
Publicidade

Salmos 99

Bogumbamela Yawe, pamba te azali Mosantu

1 Yawe azali kokonza ;

tika ete bato balenga !

Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ;

tika ete mabele eningana !

2 Yawe azali monene kati na Siona,

mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.

3 Tika ete Kombo na Yo ya monene

mpe ya somo esanzolama ;

ezali bule !

4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo.

Olendisaka bosembo.

Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.

5 Bonetola Yawe, Nzambe na biso,

mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye ;

azali Mosantu.

6 Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye,

mpe Samuele kati na bato

oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye,

bazalaki kobelela Yawe,

mpe Ye azalaki koyanola bango.

7 Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata.

Babatelaki malako na Ye

mpe mibeko oyo apesaki bango.

8 Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango.

Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka

atako opesaki bango etumbu

mpo na misala na bango ya mabe.

9 Bonetola Yawe, Nzambe na biso,

mpe bogumbama na kotala

na ngambo ya ngomba na Ye ya bule.

Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

Veja também